Back to stories list

A two-panel image of a man on a laptop and a woman on a laptop.

Mobali ya mobange An old man as a husband

Written by Aranya

Illustrated by Sunniva Høiby-Øiset

Translated by Paul Fuila

Read by Elie Mvubu Mayemba

Language Lingala

Level Level 5

Narrate full story

Reading speed

Autoplay story


A two-panel image of a man on a laptop and a woman on a laptop.

Nazalaki kokanisa ete mibali ya Norvège bazalaki mibali ya malamu koleka na mokili mobimba, kasi ezalaki ya solo te! Liboso nakutana na mobali oyo akómaki mobali na ngai, nazalaki kosala na izini moko na Bangkok, mpe ye azalaki kofanda na Pattaya. Tokutanaki na nzela ya Internet mpe nsuka nsuka tokómaki mwasi na mobali.

I thought Norwegian men were the best men in the world, but that is not true! Before I met the man who became my husband, I worked in a factory in Bangkok, and he lived in Pattaya. We met through the Internet and eventually became a couple.


A bride and groom holding hands.

Nsima ya mwa ntango, tozwaki mokano ya kobalana. Nabotama na libota ya babola, yango wana, lokola mobali na ngai azali mopaya mpe akokaki kokokisa ba posa ya libota na ngai, yango ezalaki ntina oyo etindaki ngai nabala ye.

After a while we decided to get married. I came from a poor family, so having a foreign husband who could take care of my family was part of my reason for marrying him.


A man driving and a woman sitting next to him.

Tokendaki kofanda na Norvège, mpe nabandaki kokende kelasi mpo na koyekola lokota ya Norvége. Ezalaki ntango moko ya mpasi. Nazalaki na mokanda ya kokumba motuka te, mpe mobali na ngai azalaki komema ngai na motuka mpo na kende na eteyelo, azalaki kozela ngai, mpe azalaki kozongisa ngai na ndako na motuka. Tolekisaki ngonga moko na kokende mpe na kozonga. Nsima ya mwa ntango, tokómaki kofanda esika moko, kasi azalaki kaka kolinga kokumba ngai na motuka mpo nakende na eteyelo. Alingaki te natambola ngai moko.

We moved to Norway, and I started going to school to learn Norwegian. It was a difficult time. I did not have a driver’s licence, and my husband had to drive me to school, wait for me, and drive back. It was an hour each way. After a while we moved closer, but he still insisted on driving me to school. He did not want me to walk alone.


A woman looking sad staring at her empty purse.

Banda nayaki na Norvège, nazalaki mpenza na mbongo te. Mbala moko, mobali na ngai apesaki ngai mbongo ya kolia, kasi lokola nazalaki na mbongo mwa moke, nabombaki yango. Baninga na ngai ya kelasi balingi kosalisa ngai nazwa mosala, kasi mobali na ngai alobi ete nakoki kosala te. Akanisi ete mosala ya kotia bopeto ebongi na ngai te.

I have hardly had any money since I came to Norway. Once, my husband gave me money for lunch, but since I had so little money, I kept it. My friends at school want to help me to get a job, but my husband says I cannot. He does not think working as a cleaner is appropriate for me.


A man thinking about building a garage.

Nzokande, azalaki na mosala mosusu mpo na ngai – kotonga esika ya kobongisa mituka. Azalaki mokonzi mpe ngai nazalaki kosala makambo nyonso. Akokaki kosala misala mingi te mpo azalaki kobela. Apesaki ngai ata mbongo soko moke te oyo azwaki na mosala ya kotonga esika ya kobongisa mituka.

Instead he had another job for me – building a garage. He was the boss and I did everything. He could not do much because he was ill. He did not give me any of the money he made from building the garage.


A dog walking in a field.

Mokolo moko alobaki soki atikali ye moko na ndako azalaki kolemba, yango wana azuaki mokano tósomba mbwa. Nazalaki na posa ya mbwa te mpo ete nazalaki ya kolemba nsima ya kelasi mpe nazalaki na mosala ya kelasi ya kosala na ndako. Alobaki akobanda kotambwisa mbwa mikolo nyoso, kasi na suka nasengelaki kobatela mbwa mpe ya mobali na ngai ya mobangé.

One day he said he was bored when he was home alone, so he decided we should get a dog. I did not want a dog as I was tired after school and I had homework to do. He said he would walk the dog every day, but in the end I had to take care of both the dog and my old husband.


A man looking down at a dog and a woman standing near them with her arms crossed.

Nayebi te nini ekoya mikolo mizali koya. Nazali kokana kokende na eteyelo mosusu, kasi mobali na ngai alingi te nasala yango. Azali kokana kokende kofanda mosika mpo ete epesa ngai kokoso. Nalingi natelemela yango, kasi nayebi te ndenge ya kosala. Kofanda na mboka mopaya na mobali ya mobange ezali pete te ndenge nazalaki kokanisa.

I do not know what the future will bring. My plan is to go to another school, but my husband does not want me to do that. He is planning to move further away to make it difficult for me. I want to resist, but I do not know how. It is not as easy to live in a foreign country with an old man as a husband as I thought it would be.


Written by: Aranya
Illustrated by: Sunniva Høiby-Øiset
Translated by: Paul Fuila
Read by: Elie Mvubu Mayemba
Language: Lingala
Level: Level 5
Creative Commons License
This work is licensed under a Creative Commons Attribution 4.0 International License.
Options
Back to stories list Download PDF