Back to stories list

A man, woman and boy walking through an airport.

Koya na Norvège Coming to Norway

Written by Aamiina

Illustrated by Julie Cornelia van Walsum

Translated by Paul Fuila

Read by Elie Mvubu Mayemba

Language Lingala

Level Level 5

Narrate full story

Reading speed

Autoplay story


A man, woman and boy walking through an airport.

Ngai na bandeko na ngai mibale ya mibali toyaki na Norvège na sanza ya zomi na mibale ya 2016. Tozalaki kolata bilamba ya eleko ya molunge mpo tokanisaki ete ekozala molunge na Norvège lokola na Somalie. Nzokande, tango tokomaki na aéroport, ezalaki na mbula ya pembe. Tozalaki koyoka malili mpe ntango ezalaki malili makasi. Atako bongo tomemaki ba valisi moke, ezalaki kaka na bilamba ya eleko ya molunge na kati.

My two brothers and I came to Norway in December 2016. We wore summer clothes because we thought it would be as warm in Norway as it was in Somalia. However, when we arrived at the airport, it was snowing. We were cold and the weather was chilly. Although we had brought a few suitcases, they only had summer clothes in them.


A woman hugging children.

Atako ezalaki malili, nazalaki na esengo mingi ntango tokomaki na Norvège. Nakokutana lisusu na mama na ngai, oyo namonaki ye te wuta mibu motoba. Mama na ngai na baninga na ye mibale bayaki kotala biso. Ntango tomonaki ye, tolelaki na esengo. Tokendeki na engumba moke esika mama afandaka.

Even though it was cold, I was very happy when we came to Norway. I would finally meet my mum again, whom I had not seen for six years. My mum and two of her friends met us. When we saw her, we wept with joy. We drove to the small town where Mum lives.


A man, woman and boy shopping for clothes.

Mikolo ya yambo na engumba ya mama ezalaki mpenza ya kokamwisa. Ezalaki malili na mbula pembe mpe lolenge ya komona malamu ezalaki te. Ba balabala ezalaki mpenza polele. Bato moke oyo nakutanaki na bango bazalaki na malili mpe bazalaki na bondeko te. Na Somalie ezalaki na bato bisika nyonso, yango wana makambo nyonso ezalaki komonana lokola ya sika awa. Mama na ngai na baninga na ye bapesaki biso makabo, mpe na nsima amemaki biso kosomba bilamba ya eleko ya malili.

The first days in Mum’s town were very strange. It was cold and snowy and there was not much to see. The streets were completely empty. The few people I met seemed cold and unfriendly. In Somalia there were people everywhere, so everything felt unfamiliar here. My mum and her friends gave us some presents, and then she took us to buy winter clothes.


Three women sitting at desks.

Nsima ya bileko ya bopemi ya Noël nakotaki mateya ya lokota ya Norvège na kelasi ya mikolo. Nayekolaki kuna mibu mibale liboso ya kobanda na eteyelo ya bato nyonso. Sikoyo nazali na mbula ya suka, mpe nakomi na baninga ebele ya sika. Nazali na esengo ya kozala na bato mpe nasepelaka kokutana na bato mosusu.

After the Christmas holidays I joined a Norwegian course at the adult education centre. I studied there for two years before starting in an ordinary school. Now I am in my final year, and I have made many new friends. I am very sociable and enjoy meeting other people.


A woman using a sewing machine.

Nsima ya kelasi nakendaka na eteyolo oyo etambwisami na bato ya bolingo epai nazwaka lisalisi na ba misala ya kelasi na ngai. Nakotaki mpe na kelasi ya koyekola kotonga bilamba.

After school I go to a centre run by volunteers where I get help with my homework. I have also joined a sewing course at the centre.


A woman studying in a library.

Na Somalie nakendaki na kelasi moko te nalandaki mpe mateya moko te kaka kelasi ya koyekola Coran. Nayebaki kotanga to mpe kokoma te. Sikoyo nayekoli kokoma na lokota ya Somali na ya Norvège, mpe makambo mosusu mingi. Kozanga kotanga nazalaki komiyoka ete nazali ntina te. Sikoyo namiyoki ete nayebi makambo mingi mpe nazali na esengo.

In Somalia I never went to school or did any courses except Quran school. I did not know how to read or write. Now I have learned how to write in both Somali and Norwegian, and many other subjects. Without education I felt I was nobody. Now I feel knowledgeable and happy.


A woman reading with a boy and girl.

Na mbula ekoya nakobanda eteyelo ya mibale koyekola maye matali bokolongono ya nzoto mpe bokóli ya bilenge. Na mikolo mikoya nalingi nakoma mosali ya bilenge. Ntango nakosilisa kelasi na ngai, ndoto na ngai ezali nazwa mosala ya libela. Nalingi mpe koyekola kokumba motuka mpe kozwa mokanda ya kotambwisa motuka.

Next year I will start secondary school in the health and youth development section. In the future I want to become a youth worker. When I have finished my education, my dream is to get a permanent job. I also want to learn how to drive and get my driver’s licence.


A woman in a library thinking about a family.

Soki natikalaki na Somalie, nakanisi nalingaki nakoma mama na ntango oyo. Mbala mosusu nalingaki kobota bana mingi. Soki nazalaki na Somalie, nalingaki kozala na mabaku ya kitoko oyo nazali na yango sikoyo te. Nazali koyoka esengo ya kofanda na Norvège.

If I had stayed in Somalia, I think I would have been a mother by now. Perhaps I would already have many children. If I had been in Somalia, I would not have had the same opportunities as I have had now. I feel lucky to live in Norway.


Written by: Aamiina
Illustrated by: Julie Cornelia van Walsum
Translated by: Paul Fuila
Read by: Elie Mvubu Mayemba
Language: Lingala
Level: Level 5
Creative Commons License
This work is licensed under a Creative Commons Attribution 4.0 International License.
Options
Back to stories list Download PDF