“Mikolo ebandi kokoma malili. Malili ezali boni?”
“The days are starting to get cold. What is the temperature?”
“Ezali libwa. Tozali naino na ebandeli ya tango ya malili. Kasi kala mingi te tokokota na tango ya malili makasi.”
“It’s nine degrees. It’s still autumn, but soon it will be winter.”
“Nazo zela na motema likoló tango ya molunge, kasi na sepelaka na tango ya moi makasi, ntango ezalaka kitoko mpe molunge.”
“I’m looking forward to spring, but I prefer summer, when it’s nice and warm.”
“Malili etungisaka ngai te. Ezali mbula mpe mopepe nde nalingaka te.”
“I don’t mind the cold. It’s the rain and wind I don’t like.”
“Talá mapata wana ya moindo. Lobi mbula ekobeta. Mopepe mpe ekozala makasi. Mbala mosusu mopepe ya makasi mpe ekozala.”
“Look at those dark clouds. Tomorrow it will rain. It will be very windy too. Perhaps there will be a storm.”
“Nazali kolikya bongo te. Nalingaka mpenza te ntango ya mabe, mingimingi nkake mpe minkalali. Nabangaka nkake ekoka kobeta ngai.”
“I hope not. I really don’t like bad weather, especially thunder and lightning. I’m afraid the lightning might strike me.”