Back to stories list

A woman talking about her family.

Kolobela makambo ya libota Talking about family

Written by Espen Stranger-Johannessen

Illustrated by Billie Cejka Risnes

Translated by Paul Fuila

Read by Elie Mvubu Mayemba

Language Lingala

Level Level 3

Narrate full story

Reading speed

Autoplay story


A woman talking to another woman.

“Ozali na libota?”

“Do you have any family?”


A woman talking about her family.

“Iyo, ngai na mobali na ngai tozali na bana mibale ya basi mpe moko ya mobali.”

“Yes, my husband and I have two daughters and a son.”


A woman talking about her family.

“Nazali mpe na bana mibale ya basi, kasi na boma libala.”

“I also have two daughters, but I’m divorced.”


A woman with her palms open.

“Bana na yo ya basi bazali na mbula boni?”

“How old are your daughters?”


A girl holding up four fingers standing next to a girl holding up ten fingers.

“Mina azali na mbula minei. Akendaka na eteyelo ya bana mike. Miriam azali na mbula zomi, yango wana akendaka na eteyelo ya mikolo.”

“Mina is four years old. She goes to preschool. Miriam is ten, so she goes to school.”


A boy holding a book and rolled scroll, and two girls holding books.

“Bana na ngai nyonso bazali na eteyelo ya mikolo. Mwana na ngai ya mobali akosilisa kelasi na ye na mbula ekoya.”

“All of my children are in school. My son will graduate next year.”


A woman talking.

“Ezali malamu mingi! Bazokola noki mpenza. Akosala nini na nsima?”

“That is great! They grow up so fast. What does he want to do afterwards?”


A man thinking about money standing next to a woman holding a book.

“Aza na mposa ya kozua mosala, kasi nayebisi ye asengeli nde kokende kotánga na université.”

“He wants to get a job, but I tell him he should go to university instead.”


A woman talking to another woman.

“Ezali likanisi malamu. Nazali mpe na elikya ete mokolo mosusu bana na ngai bakokende na université.”

“That’s a good idea. I also hope my children will go to university someday.”


Written by: Espen Stranger-Johannessen
Illustrated by: Billie Cejka Risnes
Translated by: Paul Fuila
Read by: Elie Mvubu Mayemba
Language: Lingala
Level: Level 3
Creative Commons License
This work is licensed under a Creative Commons Attribution 4.0 International License.
Options
Back to stories list Download PDF