Tulima alingaka mizíkí. Ayokaka yango mikolo nyoso.
Tulima loves music. She listens to it every day.
Baninga na ye Carlos na Anita balingaka mpe mizíkí.
Her friends Carlos and Anita also like music.
Carlos azo tuna. “Tulima, olingaka miziki ya ndenge nini?”
“Tulima, what sort of music do you like?” asks Carlos.
“Na lingaka miziki ya mpoto, kasi na sepelaka na miziki ya mboka na ngai, Ethiopie.”
“I like Western music, but I prefer music from my country, Ethiopia.”
Carlos alobi. “Na wuti Colombie. Na lingaka kaka salsa. Ezalaka kitoko mpo na kobina.”
“I come from Colombia. I only listen to salsa. It’s great for dancing,” says Carlos.
Anita alobi. “Na lingaka miziki ya bolingo na miziki oyo epesaka nga esengo.”
Anita says, “I like romantic songs and music that makes me happy.”
Olingaka miziki ya ndenge nini?
What sort of music do you like?