Tom azali na mpasi ya lino. Lino na ye ezali kosala mpasi makasi.
Tom has a toothache. His tooth hurts very much.
Asengeli kokutana na monganga na ye ya mino, kasi liboso azali na mposa ya nkisi mpo na mpasi.
He needs to see his dentist, but first he needs something for the pain.
Akumbi motuka mpo na kokende na farmasi oyo ezali pene.
He drives to the nearest pharmacy.
Alobi: “Nazali na mpasi na mino.” “Ozali na eloko mpo na yango?”
“I have a toothache,” he says. “Do you have anything for that?”
“Iyo, tala mwa bankisi ya kokitisa mpasi. Osengeli na mokanda ya monganga te mpo na yango.”
“Yes, here are some painkillers. You don’t need a prescription for these.”
“Matondi. Ezali ntalo boni?”
“Thank you. How much do they cost?”
“Ezali na ntalo ya euro libwa. Kasi osengeli kokende epai ya monganga ya mino.”
“They cost nine euros. But you should see a dentist.”
“Malamu, nakobenga monganga na ngai ya mino lobi na ntongo.”
“Okay, I will call my dentist tomorrow morning.”
“Soki ozali na mposa ya nkisi ya makasi, osengeli kozwa mokanda epai ya monganga to mpe monganga na yo ya mino.”
“If you need stronger medicine, you will need to get a prescription from your dentist or doctor.”
“Matondi! Tikala malamu.”
“Thank you! Goodbye.”