Back to stories list

A man standing in front of a map of Afghanistan.

Lisolo ya Malik Malik's story

Written by LIDA Italia

Illustrated by Vilius Aistis Vilimas

Translated by Paul Fuila

Read by Elie Mvubu Mayemba

Language Lingala

Level Level 4

Narrate full story

Reading speed

Autoplay story


A man standing in front of a map of Afghanistan.

Nkombo na ngai Malik mpe nazali na mbula 39. Nabotama na Afghanistan. Lingomba na ngai ekeseni na oyo ya bato ya Afghanistan.

My name is Malik and I am 39 years old. I was born in Afghanistan. My religion is different from the main religion in Afghanistan.


A man and woman hugging and a man looking sad standing near them.

Banda ba mbula mingi, bato ya lingomba na ngai banyokuamaki. Ezalaki mpasi mingi mpo na libota na ngai.

For many years, people who belong to my religion have been persecuted. This has been very difficult for my family.


A man in the middle of a war scene and a tank firing in the distance.

Eleki mwa ba mbula etumba moko esalemaki. Nabangaki ete bakoboma ngai. Natikaki libota na ngai bakende na poto mpe babanda bomoi ya sika.

A few years ago there was a war. I was afraid I would be killed. I left my family to go to Europe and start a new life.


A man hiking thinking about food and a bed.

Natambolaki bakilometre mingi. Ba ntango mosusu kozangaki bilei mpe esika ya kofanda. Bato misusu oyo nazalaki kosala mobembo na bango bakufaki.

I walked for many kilometres. Sometimes I had no food and nowhere to stay. Some of the people I travelled with died.


A man and woman standing outside a house smiling and offering food.

Na nsuka nakomaki. Nakutanaki na bato misusu ya mboka na ngai oyo basungaki ngai. Nayebaki te nini nalingaki nasala soki bango te.

Finally I arrived. I met some people from my own country who helped me. I do not know what I would have done without them.


A man sitting at a desk studying.

Nabandaki koyekola monoko ya koloba, kasi ezalaki mpasi. Nayebaki ete koloba monoko ezalaki na ntina mpo na kozwa mosala.

I started to learn the language, but it was hard. I knew that speaking the language was important to get a job.


A man sitting at a desk studying with a clock on the wall.

Nayekolaki mibu ebele, na ebandeli mpo na koyekola monoko yango. Ezalaki mpasi, kasi nazo sepela koyekola makambo ya sika.

I studied for several years, at first to learn the language. It was hard, but I enjoy learning new things.


A man teaching angles.

Nsima ya koyekola nabandaki kosala. Ya liboso nabandaki tosala na restora, mpe na nsima nakomaki molakisi mpo nalingaka kosunga basusu.

After studying I started working. First I worked in a restaurant, and then I became a teacher because I want to help others.


A man teaching a girl sitting at a desk.

Nazali na elikya ya kozonga na Afghanistan mokolo mosusu. Bato mingi kuna bazali na mposa ya lisalisi, mpe nazali na mposa ya kosalisa bango.

I hope to go back to Afghanistan one day. Many people there need help, and I want to help them.


Written by: LIDA Italia
Illustrated by: Vilius Aistis Vilimas
Translated by: Paul Fuila
Read by: Elie Mvubu Mayemba
Language: Lingala
Level: Level 4
Creative Commons License
This work is licensed under a Creative Commons Attribution 4.0 International License.
Options
Back to stories list Download PDF