Mai azali koluka filme ya kotala. Alingi kokende kotala filme elongo na moninga na ye ya motema, Lisa.
Mai searches for a film to watch. She wants to go to the cinema with her best friend, Lisa.
Mai akeyi kotala filme na tukutuku na ye. Bayokani bakutana kuna.
Mai takes her scooter to the cinema. They have agreed to meet there.
Bapesani mboté na ndako ya bafilme. Bazali na esengo ya kotala filme.
At the cinema they say hello. They are excited to see the film.
Mai asombi batiké mpo na bango mibale na esika oyo bazoteka batiké.
Mai buys tickets for both of them at the ticket counter.
Asombi mpe sàni monene ya masangu oyo babengi popcorn.
She also buys a big bucket of popcorn.
Lisa azwi masangu na ntango Mai asombi milangi mibale ya masanga ya sukali.
Lisa takes the popcorn while Mai buys two bottles of soda.
Balakisi batike na bango liboso bakota na kati kotala filme.
They show their tickets before they go inside to watch the film.
Bazali koluka bisika na bango ya kofanda. Ezali molili mpo filme ebandaki kala.
They look for their seats. It is dark because the film has already started.
Bafandi mpo na kotala filme.
They sit down to watch the film.
Ezali filme ya bolingo. Ezali lolenge ya filme oyo basepelaka na yango.
It is a romantic film. That is their favourite kind.
Nsima ya kotala filme, ba pesani mbote mpe bakabwani mpo na kozonga na bandako.
After the film they say goodbye and go home.