Carlos azotambwisa tukutuku. Azotambwisa mbangu.
Carlos rides a scooter. He rides fast.
Mayi ezali na nzela. Nzela ezali moselulu.
There is water on the road. The road is slippery.
Abungisi bokebi ya kokumba tukutuku mpe akweyi.
He loses control of the scooter and falls off.
Mwasi moko abengi ambulansi. “Likama moko esalemi. Boya na lombango!”
A woman calls for an ambulance. “There has been an accident. Come quickly!”
Ambulansi eyei na lombango penza.
The ambulance comes very quickly.
Mibali mibale batie Carlos na mbeto ya komema.
Two men put Carlos on a stretcher.
Batomboli Carlos na kati ya ambulansi.
They lift Carlos into the ambulance.
Ambulansi ekeyi na lopitalo.
The ambulance drives to the hospital.
Lifulume moko akotisi Carlos na lopitalo.
A nurse takes Carlos into the hospital.
Carlos azali koyoka mpasi makasi na lokolo, mpe azali komitungisa.
Carlos’s leg hurts a lot, and he is worried.
Minganga mibale bazosala ye lipaso na lokolo.
Two doctors operate on his leg.
Baboti na ye bayei kotala ye. Batuni ye ndenge nini likama yango esalemaki.
His parents visit him. They ask him how the accident happened.
Bamemi ye na ndako. Carlos azali kosalela ba nzete mpo na kotambola.
They drive him home. Carlos is using crutches.