Alisha asengeli koluka mosala mpo ete libota na ye ezali na mposa ya mbongo mpo na bileyi mpe bilamba.
Alisha needs to find a job because her family needs money for food and clothes.
Alisha atikala kosala mosala moko te na mboka na ye, kasi ayebi kolamba malamu mpe alingaka kosolola na bato.
Alisha did not work in her home country, but she is good at cooking and likes talking to people.
Tango mosusu akokaki kosala na restora? Alisha azoluka na Internet bisika oyo bazali koluka bato ya kosala misala.
Maybe she could work in a restaurant? Alisha searches on the Internet for job postings.
Amoni liyebisi moko mpo na mokonzi. Wana ezali moto oyo alambaka na restora.
She finds an advert for a chef. That is someone who cooks in a restaurant.
Akeyi mpo na mituna ya mosala. Mokambi ya restora ayebisi ye ete bazali na mposa ya moto oyo alanda mateya ya mokonzi ya kolamba.
She goes for the job interview. The restaurant manager tells her they need someone who has trained as a chef.
Alisha alembi nzoto, kasi alandaki mateya oyo babengi “Bileyi mpe boyambi bapaya”. Azali na elikya ete yango nde ekosalisa azwa mosala na restora.
Alisha is disappointed, but she takes a course called “Food and hospitality”. She hopes this will help her to get a job in a restaurant.
Alisha asengeli kosala na restora lokola moyekoli ya mosala. Bazo futa ye te, kasi azozwa mayele ya mosala.
Alisha has to work in a restaurant as part of her training course. She does not get paid, but she gets work experience.
Abakisi na CV na ye makambo matali mateya. CV elakisi mosala nyonso oyo asala mpe mateya nyonso oyo alanda.
She adds the details of the course to her CV. A CV is a description of all the work she has done and all the courses she has taken.
Mbala ya nsima Alisha akeyi mpo na mituna ya mosala na restora, bapesi ye mosala. Ezali mosala makasi. Mingimingi asengeli asala na mpokwa, ntango bana na ye bawutaka kelasi.
Next time Alisha goes for a job interview at a restaurant, she is offered the job. It is hard work. She often has to work in the evening, when her children are home from school.
Azali na lolendo mpo azwi mosala oyo ezali kopesa ye makoki ya kosombela libota na ye bileyi mpe bilamba na mosolo na ye moko.
She is proud that she has got a job so that she can buy food and clothes for her family with her own money.